BOMOI YA BAKRISTO
Bakristo ya solo bayebanaka na bolingo—Boyá koluka kaka matomba na yo moko mpe kosilika
MPO NA NINI EZALI NA NTINA: Yesu ateyaki ete bato bakoyeba bayekoli na ye soki bazali kolingana. (Yn 13:34, 35) Mpo na komonisa bolingo lokola oyo Kristo amonisaki, tosengeli koluka matomba ya basusu mpe koboya kosilika.—1Ko 13:5.
NDENGE YA KOSALA YANGO:
Ntango moto alobi to asali likambo moko ya mabe, tɛlɛmá naino mpe kanisá nini ebimisi likambo yango mpe soki likambo oyo okani kosala ekobimisa nini.—Mas 19:11
Kobosana te ete biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, mpe na bantango mosusu tolobaka to tosalaka makambo oyo tokoyoka mawa na nsima
Silisáká matata nokinoki
TALÁ VIDEO “BÓZALA NA BOLINGO NA KATI NA BINO”—BOYÁ KOLUKA KAKA MATOMBA NA YO MOKO MPE KOSILIKISA BATO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Ndenge nini Larry alekisaki ndelo mpo na likanisi oyo Tom apesaki?
Ndenge nini kofanda nyɛɛ mpo na kokanisa esalisaki Tom aboya kosilika?
Ndenge nini eyano ya boboto oyo Tom apesaki ekitisaki Larry motema?
Matomba nini lisangá ezwaka soki tofandi nyɛɛ ntango batumoli biso?