Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Août lok. 3
  • Kanisá mwasi ya Lota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kanisá mwasi ya Lota
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Masolo mosusu
  • Kanisá mwasi ya Lota
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mwasi ya Lota atali nsima
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Omibongisa mpo na kobika mpe kokota kati na mokili ya sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bomoi ya mpasi na ebandeli, kasi na nsima ebele ya mapamboli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Août lok. 3
Mwasi ya Lota abaluki mpo na kotala Sodoma mpe akómi likonzí ya mungwa

BOMOI YA BAKRISTO

Kanisá mwasi ya Lota

Mpo na nini mwasi ya Lota atalaki nsima ntango azalaki kobima na Sodoma? Biblia elobi yango te. (Eb 19:17, 26) Likambo oyo etindaki Yesu apesa likebisi yango emonisi ete mbala mosusu mwasi yango azalaki mpenza na mposa ya biloko oyo atikaki. (Lk 17:31, 32) Tokoki kosala nini mpo Nzambe aboya biso te ndenge aboyaki mwasi ya Lota? Tosengeli kotika te ete koluka biloko ya mokili ezwa esika ya liboso na bomoi na biso. (Mt 6:33) Yesu ateyaki ete ‘tokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.’ (Mt 6:24) Bongo soki tomoni ete biloko ya mokili ekómi kozangisa biso ntango ya kosala makambo ya elimo? Tokoki kobondela Yehova apesa biso bososoli mpo tómona bisika oyo tosengeli kobongisa mpe apesa biso mpiko mpe nguya ya kosala yango.

ZONGISÁ NA MAKANISI VIDEO YA BITENI MISATO KANISÁ MWASI YA LOTA, MPE YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Anna na esika ya mosala; Gloria ná noko na ye; Brian ná Gloria bazali kobondela

    Ndenge nini nakoki komonisa ete ‘nakanisaka mwasi ya Lota’ na makambo oyo nasalaka?

    Ndenge nini mbamba oyo batyaki Gloria aluka mbongo mingi ebongolaki ndenge na ye ya kokanisa, ya koloba mpe ya kosala makambo?

  • Ndenge nini lisolo ya mwasi ya Lota ezali likebisi mpo na biso lelo oyo?

  • Ndenge nini kosalela mitinda ya Biblia esalisaki Joel ná libota na ye?

  • Ndenge nini baninga ya Anna ya mosala balingaki kolɛmbisa ye na elimo?

  • Mpo na nini tosengeli komonisa mpiko ntango bazali kotya biso mbamba tótya mbongo na esika ya liboso?

  • Ndenge nini ndeko Brian ná mwasi na ye Gloria bazongelaki lisusu kotya makambo ya elimo na esika ya liboso?

  • Mitinda nini ya Biblia omoni na video oyo?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto