21-27/05
MARKO 11-12
Loyembo 34 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Atyaki mingi koleka bato nyonso”: (Min. 10)
Mr 12:41, 42—Yesu amonaki mwasi mobola moko oyo mobali akufá azali kotya mbongo ya bibende mibale ya motuya moke mpenza na bakɛsi ya makabo na tempelo (“bakɛsi ya makabo,” “mbongo ya bibende mibale,” “ya motuya moke mpenza” banɔti mpo na koyekola na Mr 12:41, 42, nwtsty-E)
Mr 12:43—Yesu asepelaki na likabo na ye mpe ayebisaki yango bayekoli na ye (w97 15/10 lok. 16-17 par. 16-17)
Mr 12:44—Likabo ya mwasi wana oyo mobali akufá ezalaki na motuya mingi na miso ya Yehova (w97 15/10 lok. 17 par. 17; w87-F 1/12 lok. 30 par. 1; cl lok. 185 par. 15)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Mr 11:17—Mpo na nini Yesu abengaki tempelo “ndako ya mabondeli mpo na bikólo nyonso”? (“ndako ya mabondeli mpo na bato ya bikólo nyonso” nɔti mpo na koyekola na Mr 11:17, nwtsty-E)
Mr 11:27, 28—“Makambo” nini banguna ya Yesu bazalaki kolobela? (jy lok. 244 par. 7)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Mr 12:13-27
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 2 te) Salelá maloba ya bokutani ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Moto yango abimisi ntembe oyo bato babimisaka mingi na teritware na bino.
Kozongela moto mpo na mbala ya liboso: (Eleka min. 3 te) Mpo na kobanda, salelá maloba ya kozongela moto mpo na mbala ya liboso oyo ezali na “Ndenge ya kobanda lisolo.” Moto yango ayebisi yo ete ndeko na ye moko ya libota auti kokufa.
Video mpo na kozongela moto mpo na mbala ya mibale: (Min. 5) Lakisá video mpe lobelá yango.
BOMOI YA BAKRISTO
Kondima epai ya Yehova ekoki kosala makambo ya kokamwa: (Min. 15) Lakisá video.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) jy mok. 21
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 98 mpe libondeli