Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb18 Janvier lok. 6
  • Yesu alingaki bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yesu alingaki bato
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
mwb18 Janvier lok. 6
Yesu abikisi moto moko ya maba

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MATAI 8-9

Yesu alingaki bato

Matai mokapo 8 mpe 9 elobeli mosala ya Yesu na etuka ya Galile. Yesu amonisaki nguya na ye ntango abikisaki bato, kasi likambo eleki ntina ezali bolingo mpe mawa monene oyo amoniselaki basusu.

  1. Bingumba ya Galile epai Yesu abikisaki bato

    Yesu abikisaki moto ya maba.​—Mt 8:1-3

  2. Yesu abikisaki mosaleli ya mokonzi moko ya basoda.​—Mt 8:5-13

    Abikisaki mama-bokilo ya Petro.​—Mt 8:14, 15

    Abimisaki bademo mpe abikisaki bato ya maladi.​—Mt 8:16, 17

  3. Yesu abimisaki bademo ya nkanda makasi mpenza, mpe atindaki bango na etonga ya bangulu.​—Mt 8:28-32

  4. Yesu abikisaki moto oyo azalaki paralize to mokatatali.​—Mt 9:1-8

    Abikisaki mwasi oyo asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye; asekwisaki mpe mwana mwasi ya Yairuse.​—Mt 9:18-26

    Abikisaki bato bakufá miso mpe bababa.​—Mt 9:27-34

  5. Yesu atambolaki na bingumba mpe bamboka, abikisaki maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso.​—Mt 9:35, 36

Ndenge nini nakoki komonisa bolingo mpe mawa mingi lisusu epai ya bato nafandi na bango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto