16-22/10
HOSEA 1-7
Loyembo 18 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Yehova asepelaka na motema boboto to bolingo ya sembo—Bongo yo?”: (Min. 10)
[Lakisá video Maloba ya ebandeli na Hosea.]
Hos 6:4, 5—Yehova asepelaki te ndenge Bayisraele bamonisaki te bolingo ya sembo (w10 15/8 25 par. 18)
Hos 6:6—Yehova asepelaka ntango tomonisaka bolingo ya sembo (w07 15/9 16 par. 8; w07 15/6 27 par. 7)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Hos 1:7—Ntango nini Nzambe ayokelaki ndako ya Yuda mawa mpe abikisaki yango? (w07 15/9 14 par. 7)
Hos 2:18—Ndenge nini vɛrsɛ oyo ekokisamaki na ntango ya kala, na mikolo na biso mpe ekokokisama na mikolo ezali koya? (w05 15/11 20 par. 16; g05-F 8/9 12 par. 2)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Hos 7:1-16
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 2 te) 1Yn 5:3—Teyá solo. Bengisá moto yango na makita.
Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) Mib 30:11-14; Yis 48:17, 18—Teyá solo. Bendá likebi ya moto na jw.org. (Talá mwb16.08 8 par. 2)
Boyekoli ya Biblia: (Eleka min. 6 te) lv nk. 12-13 par. 16-18—Salá na ndenge oyo ekosimba motema ya moyekoli.
BOMOI YA BAKRISTO
Bamposa ya lisangá: (Min. 15) Diskur ekosalema na nkulutu moko. Bandá na kolobela makanisi ya Biblia oyo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/2015 lokasa 15 na boumeli ya miniti 5, mpe na nsima lakisá video Ndenge ya kotinda makabo na nzela ya site Internet na biso. Nsima ya kotala video, lakisá bango na jw.org esika bakomi “Ndenge ya kopesa likabo mpo na mosala na mokili mobimba” mpe lobelá ndenge ekeseni ya kopesa makabo oyo esalemaka na mboka na bino.
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) kr mok. 20 par. 1-6, bitanda “Mosala na biso monene ya liboso mpo na kosunga bandeko” mpe “Ntango likama esalemi!”
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 50 mpe libondeli