17-23/07
EZEKIELE 18-20
Loyembo 21 mpe libondeli
Maloba ya ebandeli (Eleka min. 3 te)
MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE
“Soki Yehova alimbisi, abosanaka?”: (Min. 10)
Ezk 18:19, 20—Mpo na Yehova, moto na moto amemaka ngambo na kolanda makambo oyo asalaka (w12 1/7 18 par. 2)
Ezk 18:21, 22—Yehova asepelaka kolimbisa baoyo babongoli motema mpe akokanisa lisusu te masumu oyo basalaki (w12 1/7 18 par. 3-7)
Ezk 18:23, 32—Yehova abomaka bato mabe kaka soki amoni ete baboyi mpenza kobongwana (w08 1/4 8 par. 4; w06 1/12 27 par. 11)
Tóluka biloko ya motuya ya elimo: (Min. 8)
Ezk 18:29—Mpo na nini Bayisraele bakómaki kokanisela Yehova mabe, mpe ndenge nini tokoki koboya kosala libunga ya ndenge wana? (w13 15/8 11 par. 9)
Ezk 20:49—Mpo na nini bato bakanisaki ete Ezekiele azalaki “kobongisa maloba ya lisese,” mpe likebisi nini tozwi mpo na yango? (w07 1/7 14 par. 3)
Botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo eteyi yo nini mpo na Yehova?
Biloko nini mosusu ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo?
Botángi ya Biblia: (Eleka min. 4 te) Ezk 20:1-12
OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA
Bokutani ya liboso: (Eleka min. 2 te) 1Yn 5:19—Teyá solo. Lobá likambo oyo ekopesa yo nzela ozongela moto.
Kozongela moto: (Eleka min. 4 te) Eb 3:2-5—Teyá solo. Lobá likambo oyo ekopesa yo nzela ozongela ye. (Talá mwb16.08 8 par. 2.)
Diskur: (Eleka min. 6 te) w16.05-F 32—Motó ya likambo: Ndenge nini bandeko na lisangá bakoki komonisa esengo ntango balobi ete moto oyo alongolamaki na lisangá azongi?
BOMOI YA BAKRISTO
“Omilimbisaka?”: (Min. 10) Lisolo na bayangani. Bandá na kolakisa video Longisá bikateli ya Yehova na bosembo nyonso—Limbisáká.
Mituna oyo bilenge batunaka: Nakoki kosala nini soki nasali libunga?: (Min. 5) Bólobela lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka: Nakoki kosala nini soki nasali libunga?” Mpo na kobanda, poná ndeko moko atánga eteni oyo elobi: “Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?”
Boyekoli ya Biblia na lisangá: (Min. 30) kr mok. 15 par. 9-17
Bozongeli mpe makambo tokotalela pɔsɔ elandi (Min. 3)
Loyembo 38 mpe libondeli