BOMOI YA BAKRISTO
Kobosanaka te kobondela mpo na bandeko oyo bazali na minyoko
Biblia esakolaki ete Satana akonyokola biso mpo tótika mosala ya kosakola. (Yn 15:20; Em 12:17) Ndenge nini tokoki kosalisa bandeko na biso ya mikili mosusu oyo bazali na minyoko, tokoki kobondela mpo na bango. “Lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi.”—Yk 5:16.
Tokoki kosɛnga nini na mabondeli yango? Tokoki kosɛnga Yehova apesa bandeko yango mpiko mpe asalisa bango mpo bábanga te. (Yis 41:10-13) Tokoki mpe kobondela mpo bakonzi ya Leta bázala na makanisi ya malamu mpo na mosala ya kosakola, “mpo tókoba kozala na bomoi ya kimya mpe ya mobulu te”—1Ti 2:1, 2.
Ntango Paulo ná Petro bazalaki konyokwama, bakristo ya siɛklɛ ya liboso batángaki nkombo na bango na libondeli. (Mis 12:5; Ro 15:30, 31) Soki toyebi nkombo ya bandeko nyonso te oyo bazali konyokwama lelo, na mabondeli na biso tokoki ata kotánga lisangá na bango, ekólo, to mboka na bango!