Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Juillet lok. 6
  • Kanisáká misala ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kanisáká misala ya Yehova
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Masolo mosusu
  • Yekolá makambo mingi etali Yehova na nzela ya bozalisi na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Talelá Yehova mpo ozwa mpiko
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Makanisi ya ntina na eteni ya misato mpe ya minei ya mokanda ya Nzembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mokanda ya Biblia nimero 19​—Nzembo
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Juillet lok. 6

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 74-78

Kanisáká misala ya Yehova

Ezali na ntina mingi kokanisa na mozindo makambo oyo Yehova asali

Ndeko mwasi moko azali komanyola makambo oyo atángi na Biblia

74:16; 77:6, 11, 12

  • Komanyola esalisaka biso tófandisa na motema makambo totángi na Liloba ya Nzambe mpe esalaka ete motema na biso esepela na bilei ya elimo

  • Kokanisa na mozindo makambo ya Yehova esalisaka biso tóbosana te misala na ye mpe elikya oyo apesi biso

Misala ya Yehova ezali mpe:

74:16, 17; 75:6, 7; 78:11-17

  • Bozalisi

    Koyeba makambo mingi oyo etali biloko oyo Yehova akelá ekosalisa biso tóbanga Ye mingi

  • Bandeko mibali oyo bazali na mikumba na lisangá

    Tosengeli kotosa bato oyo Yehova atye bákamba lisangá

  • Misala ya kobikisa

    Kobosana te misala ya kobikisa ya Yehova esalisaka biso tóndima mpenza ete alingaka kosalisa basaleli na ye mpe akoki kosala yango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto