MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 1-10
Mpo tózala na kimya na Yehova tosengeli kokumisa Mwana na ye Yesu
Biblia esakolaki ete bato bakoyina Yehova mpe Yesu
Biblia esakolaki ete bikólo ekoboya kondima bokonzi ya Yesu; ekotingama kaka na bokonzi na bango moko
Esakweli yango ekokisamaki ntango Yesu azalaki awa na mabele mpe ezali kokokisama na monene na yango lelo
Mokomi ya nzembo alobi ete bikólo ezali koloba na nse nse likambo ya mpamba, elingi koloba ete mokano na bango ezali mpamba mpe ekolonga te
Kaka baoyo bakumisi Mokonzi oyo Yehova atye mafuta nde bakozwa bomoi
Baoyo nyonso batɛmɛli Masiya Mokonzi bakobomama
Baoyo bazali kokumisa Yesu, Mwana ya Nzambe, bakoki kozwa kimya mpe libateli