MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 28-32
Yobo azali ndakisa na likambo etali bosembo
Yobo azalaki na ekateli makasi ya kotosa mibeko ya Yehova
Azalaki kobatela miso na ye mpe azalaki komonisa lolango kaka epai ya mwasi na ye
Yobo atiká ndakisa malamu na ndenge ya kosalela basusu makambo
Azalaki na komikitisa, azalaki sembo mpe motema mawa. Azalaki kozwa moto nyonso na valɛrɛ, ezala moto ya lokumu to moto mpamba, mozwi to mobola
Yobo azalaki kokaba, azalaki moimi te
Azalaki kosalisa bato mpe kokabela baoyo bazalaki kokelela