‘Tambolá na kondima, kasi na komona te’
Mwa moke liboso Yerusaleme ezingama mpe nsukansuka ebomama, ntoma Paulo amonisaki ete bakristo bazali basoda ya Kristo. Akomaki ete basɛngelaki koyeba ete bakokutana na mikakatano mpe basengeli koboya koluka liboso bolamu mpe bisengo na bango moko. (2 Tim. 2:3, 4) Lokola etikali moke mokili oyo mabe ebomama, tosengeli kozala na kondima makasi mpo tókoba kotya makanisi na biso nyonso na makambo ya elimo. (2 Ko. 4:18; 5:7) Talá video ‘Tambolá na kondima, kasi na komona te.’ (Kende na jw.org, talá esika bakomi MIKANDA > BAVIDEO.) Tyá likebi ndenge kokangama makasi na biloko ya mosuni ekómaki motambo oyo ememaki Nahame mpe Abitale na liwa. Na nsima, talelá mituna oyo elandi.
(1) Na siɛklɛ ya liboso, ‘eloko ya bosɔtɔ oyo etɛlɛmaki na esika mosantu’ ezalaki nini, mpe bakristo oyo bazalaki na Yerusaleme basɛngelaki kosala nini kozanga koumela? (Mat. 24:15, 16) (2) Mpo na nini esɛngaki kozala na kondima mpo na kolongwa na engumba yango? (3) Kolongwa na engumba esɛngaki komipimela makambo nini? (4) Mpo na nini Nahame ná Abitale balongwaki noki te? (Mat. 24:17, 18) (5) Ndenge nini kondima ya Rashele emekamaki lisusu ntango bazalaki kolongwa na Yerusaleme? (Mat. 10:34-37; Mrk. 10:29, 30) (6) Ndenge nini Etane apesaki ndakisa malamu na oyo etali kondima mpe kotyela Yehova motema? (7) Mikakatano nini bakristo bakutanaki na yango na Pela? (8) Ndenge nini kondima ya Nahame ná Abitale ekómaki kolɛmba mokemoke? (9) Ndenge nini Yehova akokisaki bamposa ya bakristo oyo bazalaki na Pela? (Mat. 6:33; 1 Tim. 6:6-8) (10) Ndenge nini tokoki komekola Abrahama ná Sara lokola tokómi na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo? (Ebr. 11:8-10) (11) Ndenge nini Nahame ná Abitale bamindimisaki ete basengeli kozonga na Yerusaleme, mpe mpo na nini makanisi na bango ezalaki ya libunga? (Luka 21:21) (12) Makambo ezalaki ndenge nini na Yerusaleme ntango Nahame ná Abitale bazongaki kuna? (13) Mpo na nini tosengeli kokómisa kondima na biso makasi banda sikoyo, liboso ete nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo eya?—Luka 17:31, 32; 21:34-36.
Kotambola na kondima elimboli (1) kotyela litambwisi ya Yehova motema, (2) kotika ete malako na ye etambwisa biso, mpe (3) komonisa ete tozwaka makambo ya elimo na motuya mingi koleka biloko ya mokili. Tiká ete tózwa mpenza ekateli ya kotambola na kondima, mpe tóyeba ete “mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”—1 Yoa. 2:17.