Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/15 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 12/15 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 28 sanza ya zomi na mibale 2015. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.

  1. Davidi anyokolaki nde bato oyo akangaki na etumba, ndenge bato mosusu bakanisaka ntango batángaka 1 Ntango 20:3? [2 sanza ya 11, w05 15/2 lok. 27]

  2. Nini etindaki Davidi amonisa elimo ya kokaba, mpe nini ekosalisa biso tósala lokola ye? (1 Nt. 22:5) [9 sanza ya 11, w05 1/10 lok. 11 par. 7]

  3. Davidi alingaki koloba nini ntango ayebisaki Salomo boye: “Yebá Nzambe ya tata na yo”? (1 Nt. 28:9) [16 sanza ya 11, w10 1/11 lok. 30 par. 3, 7]

  4. Likambo oyo Salomo asɛngaki Nzambe na 2 Ntango 1:10 emonisaki nini mpo na ye, mpe yango eteyi biso nini ntango tozali kotalela makambo oyo tosɛngaka Yehova na mabondeli na biso moko? (2 Nt. 1:11, 12) [23 sanza ya 11, w05 1/12 lok. 19 par. 6]

  5. Na kotalela 2 Ntango 6:29, 30, likoki nini kaka Yehova nde azalaka na yango, mpe mpo na nini tosengeli kofungolela ye motema na libondeli? (Nz. 55:22) [30 sanza ya 11, w10 1/12 lok. 11 par. 7]

  6. Mpo na nini Asa abondelaki ete alonga limpinga moko monene ya basoda, mpe tokoki kozala na elikya nini na oyo etali etumba na biso ya elimo? (2 Nt. 14:11) [7 sanza ya 12, w12 15/8 lok. 8 par. 6–lok. 9 par. 1]

  7. Ndenge nini lolenge oyo Yehova atalelaki mabunga ya Mokonzi Yehoshafate emonisi bolingo ya Nzambe, mpe yango esengeli kotinda biso tótalelaka basusu ndenge nini? (2 Nt. 19:3) [14 sanza ya 12, w03 1/7 lok. 17 par. 13; cl lok. 245 par. 12]

  8. Mpo na nini tosengeli ‘kotɛlɛma’ mpe ‘koningana te’ lelo oyo, mpe ndenge nini tosengeli kosala yango? (2 Nt. 20:17) [21 sanza ya 12, w05 1/12 lok. 21 par. 2; w03 1/6 lok. 21 par. 15-16]

  9. Likebisi nini ezali na 2 Ntango 21:20 oyo tosengeli kozwa na lisɛki te na oyo etali liwa ya Yehorame? [21 sanza ya 12, w98 15/11 lok. 32 par. 4]

  10. Ndenge 2 Ntango 26:5 emonisi yango, nani apesaki elenge Uzia ndakisa ya malamu, mpe ndenge nini lelo oyo bilenge bakoki kolanda ndakisa ya bakristo oyo bakɔmɛli na elimo? [28 sanza ya 12, w07 15/12 lok. 10 par. 2, 4]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto