Koteya malamu esɛngaka komibongisa
Na mabaku mibale, batunaki Yesu motuna moko oyo etali bomoi ya seko; kasi mbala nyonso oyo ayanolaki, ayokanisaki eyano na ye na mposa ya moto oyo atunaki ye. (Luka 10:25-28; 18:18-20) Na yango, atako tokoki koyeba malamu buku oyo toyekolaka na yango bato Biblia, tosengeli kobongisa yango na kotalela mposa ya moto oyo tokoyekola na ye. Makambo nini ekoki kozala mwa mpasi mpo akanga ntina to andima yango? Bavɛrsɛ nini oyo maloba na yango etyami na paragrafe te tokotánga elongo na ye? Tokoyekola na ye paragrafe boni? Ekoki kosɛnga tóbongisa ndakisa moko, ndenge ya kolimbola likambo moko, to mpe mwa mituna mpo na kosalisa moyekoli akanga ntina ya makambo oyo tokoyekola. Lisusu, lokola Yehova nde akolisaka mboto ya solo na motema ya moto, tosengeli kosɛnga ye apambola biso tómibongisa malamu, apambola moto oyo toyekolaka na ye mpe apambola milende oyo tozali kosala mpo tósalisa ye akola na elimo.—1 Ko. 3:6; Yak. 1:5.