Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/15 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 6/15 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 29 sanza ya motoba 2015. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.

  1. Nini ezalaki mabe na lolenge oyo Mikale alobaki na Davidi, mpe liteya nini babalani basengeli kozwa na lisolo oyo? (2 Sa. 6:20-23) [11 sanza ya 5, w11 1/8 lok. 12 par. 1]

  2. Mosakoli Natane asalaki nini ntango Yehova asembolaki ye mpo ayebisaki Davidi ete akende mpe atongela Yehova tempelo? (2 Sa. 7:2, 3) [11 sanza ya 5, w12 15/2 lok. 24 par. 6-7]

  3. Mpo na nini Natane asalelaki ndakisa oyo ekomami na 2 Samwele 12:1-7, na esika ya koyebisa Davidi mbala moko ete asali lisumu monene? Ndenge nini lisolo yango ekoki kosalisa biso tózala bateyi malamu mpenza? [18 sanza ya 5, w12 15/2 lok. 24 par. 2-3]

  4. Mpo na nini ezalaki mpasi te Abisalome akosa Bayisraele, mpe ndenge nini tokoki komibatela na bato oyo bazali lokola Abisalome na mikolo na biso? (2 Sa. 15:6) [25 sanza ya 5, w12 15/7 lok. 13 par. 7]

  5. Ndenge nini Yehova akokisaki mposa ya Davidi ntango azalaki na bosɛnga makasi, mpe yango ekoki koteya biso nini? (2 Sa. 17:27-29) [1 sanza ya 6, w08 15/9 nk. 5-6 par. 15-16]

  6. Ndenge oyo Davidi asalelaki mopaya moko na nkombo Itai makambo ekoki kosalisa biso na nini? (2 Sa. 18:2) [1 sanza ya 6, w09 15/5 lok. 27 par. 7]

  7. Ndenge nini ndakisa ya Barazilai ekoki kosalisa mibange na kati ya lisangá? (2 Sa. 19:33-35) [8 sanza ya 6, w07 15/7 lok. 15 par. 1-2]

  8. Ndenge nini maloba ya Davidi na oyo etali bosembo elendisaka basaleli ya Yehova lelo oyo? (2 Sa. 22:26) [15 sanza ya 6, w10 1/6 lok. 26 par. 6-7]

  9. Ndenge nini Natane amonisaki bosembo epai ya Nzambe, mpe ndenge nini tokoki komekola ezaleli wana lelo oyo? (1 Bak. 1:11-14) [22 sanza ya 6, w12 15/2 lok. 25 par. 1, 4-5]

  10. Na makambo nini ya bomoi mosaleli ya Nzambe akoki kosalela makanisi mabe mpo na koluka kobuka mibeko ya Nzambe, ndenge Salomo asalaki? (1 Bak. 3:1) [29 sanza ya 6, w11 15/12 lok. 10 par. 12-14]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto