Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/15 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2015
Mosala na biso ya Bokonzi—2015
km 4/15 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 sanza ya minei 2015. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.

  1. Bolingo ya ndenge nini ezali bolingo ya sembo, mpe epai wapi ezali mpenza na ntina? (Ruta 1:16, 17) [2 sanza ya 3, w12 1/7 lok. 26 par. 6]

  2. Nini esalaki ete Ruta ayebana lokola “mwasi moko malamu mingi”? (Ruta 3:11) [2 sanza ya 3, w12 1/10 lok. 23 par. 1]

  3. Ntango tokutani na mikakatano, ndenge nini ndakisa ya Hana ekoki kosalisa biso? (1 Sa. 1:16-18) [9 sanza ya 3, w07 15/3 lok. 16 par. 4-5]

  4. Ntango Samwele azalaki mwana mpe azalaki “kokola liboso ya Yehova,” nini ebatelaki ye mpo alanda te ndakisa mabe ya bana mibali ya Eli? (1 Sa. 2:21) [9 sanza ya 3, w10 1/10 lok. 16 par. 2-3]

  5. Ndenge oyo Saulo aboyaki koyanola ntango “bato ya mpambampamba” batyolaki bokonzi na ye eteyi biso nini? (1 Sa. 10:22, 27) [23 sanza ya 3, w05 15/3 lok. 23 par. 1]

  6. Kotosa Yehova, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba ezali na ntina nini mpo na biso, ndenge emonisami na likambo ya Saulo? (1 Sa. 15:22, 23) [30 sanza ya 3, w07 15/6 lok. 26 par. 3-4]

  7. Mpo na nini koyeba ete Yehova ‘amonaka ndenge motema ya moto ezali’ ebɔndisaka biso? (1 Sa. 16:7) [6 sanza ya 4, w10 1/3 lok. 23 par. 7]

  8. Na kotalela Masese 1:4, likoki nini tozalaka na yango oyo Yehova alingi ete tósalelaka yango ntango tokutani na mikakatano? (1 Sa. 21:12, 13) [13 sanza ya 4, w05 15/3 lok. 24 par. 4]

  9. Mpo na nini tokoki koloba ete Abigaile atɛmɛlaki te bokonzi ya mobali na ye ntango apesaki Davidi mpe bato na ye bilei? (1 Sa. 25:10, 11, 18, 19) [20 sanza ya 4, w09 1/7 lok. 20 par. 3]

  10. Abigaile asɛngaki bolimbisi mpo na likambo oyo asalaki te. Ndenge nini ndakisa na ye ekoki kosalisa biso? (1 Sa. 25:24) [20 sanza ya 4, w02 1/11 lok. 5 par. 1, 4]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto