Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya zomi na moko mpe sanza ya zomi na mibale 2014: Biblia eteyaka mpenza nini? to moko ya batrakte oyo tozali na yango mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Sanza ya yambo mpe sanza ya mibale 2015: Mwa buku Nsango malamu oyo euti na Nzambe! mpo na kobanda boyekoli ya Biblia. Liyebisi: Bóyeba ete mwa buku yango ezali na minɔkɔ mosusu 22 oyo elobamaka na teritware na biso: Alur, Cibemba, Kanyok, Kikongo ya Leta, Kiluba, Kinande, Kinyarwanda, Kipende, Kisonge, Kituba (Brazzaville), Kongo, Lega, Lingala, Lomongo, Mashi, Ngbaka, Otetela, Sanga, Swahili (Congo), Tshiluba, Uruund mpe Zande.
◼ Eteyelo ya babongisi-nzela ekosalema na pɔsɔ ya 22 sanza ya 12 to 29 sanza ya 12, 2014. Sanza moko liboso eteyelo yango ebanda, mokɛngɛli ya zongazonga akotindela mwana-kelasi mokomoko lokasa ya libyangi na ye mpe buku ya sika mpo na eteyelo. Tosɛngi bino bóbanda komibongisa mpo na likambo wana ya ntina mingi.—Ezr. 7:10.