Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/14 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 6/14 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 30 sanza ya motoba 2014.

  1. Mpo na nini etinda oyo ezali na Kobima 23:2 ezali na ntina mingi na likambo etali kopona masano mpe kominanola? [5 sanza ya 5, w11 15/7 nk. 10-11 par. 3-7]

  2. Mpo na nini etinda oyo ezalaki kosɛnga ete banganga-nzambe básukola nzoto liboso ya kopesa Yehova mbeka ezalaki ya kozwa na lisɛki te, mpe yango ezali kokundwela basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso likambo nini? (Kob. 30:18-21) [19 sanza ya 5, w96 1/7 lok. 9 par. 9]

  3. Mpo na nini Arona azwaki etumbu te ntango asalaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo? (Kob. 32:1-8, 25-35) [19 sanza ya 5, w04 15/3 lok. 27 par. 4]

  4. Ndenge nini bakristo batalelaka etinda oyo Nzambe apesaki Bayisraele ya koboya kosala boninga na bapaya mpe kobalana na bango? (Kob. 34:12-16) [26 sanza ya 5, w89-F 1/11 nk. 20-21 par. 11-13]

  5. Mpo na nini ndakisa ya Bezalele ná Oholiabe ekoki mpenza kolendisa mokomoko na biso? (Kob. 35:30-35) [26 sanza ya 5, w10 15/9 lok. 10 par. 13]

  6. Na Yisraele, “elembo mosantu ya komipesa” oyo ezalaki na tirba oyo nganga-nzambe monene azalaki kolata ezalaki kokundola ye nini, mpe elembo yango eteyi biso nini na likambo etali komipesa? (Kob. 39:30) [2 sanza ya 6, w01 1/2 lok. 14 par. 2-3]

  7. Mokumba nini mokristo nyonso azali na yango na likambo etali koyebisa lisumu monene oyo mokristo mosusu asali? (Lev. 5:1) [9 sanza ya 6, w97 15/8 lok. 27]

  8. Na mikolo ya bana ya Yisraele, bambeka ya boyokani ezalaki na ntina nini, mpe ebongiseli yango ezali elilingi ya nini mpo na biso lelo? (Lev. 7:31-33) [16 sanza ya 6, w12 15/1 lok. 19 par. 11-12]

  9. Lisumu ya bana ya Arona, Nadabe ná Abihu, ekokaki mpe kozala likambo nini, mpe mateya nini tokoki kozwa na lisolo yango? (Lev. 10:1, 2, 9) [23 sanza ya 6, w04 15/5 lok. 22 par. 6-8]

  10. Mpo na nini mwasi oyo auti kobota azalaki “mbindo”? (Lev. 12:2, 5) [23 sanza ya 6, w04 15/5 lok. 23 par. 2]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto