Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya minei: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Sanza ya mitano mpe sanza ya motoba: Biblia eteyaka mpenza nini? to moko ya batrakte oyo: Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?, Bampasi ekosila mokolo mosusu?, Nani mpenza azali koyangela mokili?, Nini epesaka esengo na libota? mpe Okosepela koyeba solo? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.
◼ Na mokolo ya pɔsɔ 31/05/2014, bandeko ya libota ya Betele bakozala na makambo oyo etali kaka bango moko. Yango wana, tosɛngi bino bósala programɛ ya koya kotala Betele to bandeko ya libota ya Betele na mokolo wana te.
◼ Tolingi koyebisa masangá nyonso ete soki bosengeli na mikanda ya Swahili ya Congo, tosɛngi bino bósalela elembo ZS ntango bozali kosɛnga yango na formilɛrɛ S-14. Kasi, soki bolingi kosɛnga mikanda ya Swahili oyo elobamaka na bikólo mosusu ya Afrika ya Ɛsti, bósalela elembo SW ntango bozali kotondisa formilɛrɛ yango. Bókakatana te mpo na kosɛnga mikanda yango soki bozali na mposa na yango.
◼ Bokoki kobongola mwa moke programɛ ya makita oyo bokosala pɔsɔ moko liboso ya liyangani ya etúká to liyangani oyo esangisaka bato ya mikili mingi mpo na kozongela batoli mpe makambo oyo tosengeli kobosana te oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo mpe mokanda ya 03/08/2013, oyo etindamaki na masangá nyonso, oyo elobelaki ndenge ya kosala mpo makama ebima te na makita mpe na mayangani na biso. Sanza moko to mibale nsima ya liyangani, na lisolo “Bamposa ya lisangá,” bokoki kozongela makanisi ya ntina ya liyangani, oyo basakoli bamonaki ete ekosalisa bango na mosala ya kosakola.