Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/14 lok. 6
  • Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 4/14 lok. 6

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 28 sanza ya minei 2014.

  1. Nini esalisaki Yozefe aboya kosangisa nzoto na mwasi ya Potifare? (Eba. 39:7-12) [3 sanza ya 3, w13 15/2 lok. 4 par. 6; w07 15/10 lok. 23 par. 16]

  2. Na ndenge nini Yozefe azali ndakisa malamu mpo na baoyo bazali kokutana na makambo ezangi bosembo mpe mikakatano? (Eba. 41:14, 39, 40) [10 sanza ya 3, w04 15/1 lok. 29 par. 6; w04 1/6 lok. 20 par. 4]

  3. Nini etindaki Yozefe amonisela bandeko na ye motema mawa? [17 sanza ya 3, w99 1/1 lok. 30 par. 6-7]

  4. Ndenge nini esakweli oyo ezali na Ebandeli 49:27 ekokisamaki na libota ya Benyamina? [24 sanza ya 3, w12 1/1 lok. 29, etanda]

  5. Kobima 3:7-10 eteyi biso nini mpo na Yehova? [31 sanza ya 3, w09 1/3 lok. 15 par. 3-6]

  6. Na mikolo ya Moize, ndenge nini Yehova asalaki makambo oyo eyokanaki na ndimbola ya nkombo na ye? (Kob. 3:14, 15) [31 sanza ya 3, w13 15/3 nk. 25-26 par. 5-6]

  7. Na kotalela Kobima 7:1, ndenge nini Moize ‘akómaki lokola Nzambe liboso ya Farao’? [7 sanza ya 4, w04 15/3 lok. 25 par. 7]

  8. Atako Bayisraele bamonaki na miso nguya ya kobikisa ya Yehova ntango asikolaki bango na Ezipito, ezaleli nini bamonisaki na nsima, mpe yango ekoki koteya biso nini? (Kob. 14:30, 31) [14 sanza ya 4, w12 15/3 nk. 26-27 par. 8-10]

  9. Mpo na nini maloba ‘kokumba bino na mapapu lokola mpongo’ emonisaki mpenza ndenge oyo Yehova azalaki kosalela ekólo ya Yisraele oyo eutaki kobotama sika makambo na bolingo nyonso? (Kob. 19:4) [28 sanza ya 4, w96 15/6 lok. 10 par. 5–lok. 11 par. 2]

  10. Na ndenge nini Yehova ayeisaka “etumbu mpo na libunga ya batata likoló ya bana” likoló ya mabota oyo elandaka na nsima? (Kob. 20:5) [28 sanza ya 4, w04 15/3 lok. 27 par. 1]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto