Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/13 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 12/13 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 30 sanza ya zomi na mibale 2013. Dati ya lisolo mokomoko epesami mpo na kosalisa mosakoli asala bolukiluki pɔsɔ na pɔsɔ wana azali kobongisa masolo ya eteyelo.

  1. Nini ekosalisa biso tómonisa motema boboto epai ya bakonzi ya Leta? (Tit. 3:2) [4 sanza ya 11, w03 1/4 lok. 25 par. 18-19]

  2. Liteya nini tokoki kozwa na maloba ya ntoma Paulo epai ya Filemo, ndenge ekomami na Filemo 4, 5, mpe 7? [4 sanza ya 11, w08 15/10 lok. 31 par. 1, 2; w92-F 15/4 lok. 25 par. 2]

  3. Ndenge nini tokoki kokɔta na kopema ya Nzambe? (Ebr. 4:9-11) [11 sanza ya 11, w11 15/7 lok. 28 par. 16, 17]

  4. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Samwele, basambisi ya sembo mpe basakoli oyo basalaki “boyengebene”? (Ebr. 11:32, 33) [18 sanza ya 11, w11 1/1 lok. 25 par. 5, 6]

  5. Mpo na nini Yakobo akomaki ete “bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto, mpe kimya”? (Yak. 3:17) [25 sanza ya 11, w11 15/8 nk. 30-31 par. 15]

  6. “Bakufi” oyo “nsango malamu esakolamaki” epai na bango ezali banani? (1 Pe. 4:6) [2 sanza ya 12, w08 15/11 lok. 21 par. 8]

  7. Na kotalela 1 Yoane 2:7, 8, mobeko nini Yoane abengi mobeko “ya kala” mpe “ya sika”? [9 sanza ya 12, w08 15/12 lok. 27 par. 6]

  8. Bibengeli “Alfa ná Omega” mpe “Moto ya liboso mpe Moto ya nsuka” esalelami mpo na nani? (Em. 1:8, 17) [16 sanza ya 12, w09 15/1 lok. 30 par. 6]

  9. Wapi ndenge mibale oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo ‘batyamaka bilembo’? (Em. 7:3) [23 sanza ya 12, w07 1/1 lok. 31 par. 2]

  10. Mpo na nini tokoki mpenza kondima ete mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza solo, mpe koyeba likambo yango esengeli kosala biso nini? (Em. 21:5, 6) [30 sanza ya 12, re lok. 304 par. 9]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto