Komibongisa mpo na kobanda lisolo malamu
1. Mpo na nini maloba ya ebandeli oyo ebongi mpenza ezali na ntina?
1 Komeka mwa moke bilei ya kitoko epesaka mposa ya kolya yango; ndenge moko mpe maloba ya ebandeli ya kitoko efungolaka nzela mpo moto asepela na lisolo ya Biblia. Ndenge moko na bilei ya kitoko, maloba ya ebandeli oyo ebongi ezalaka ndenge moko te mpe ezalaka molai ndenge moko te. Yango esɛngaka ntango nyonso komibongisa malamu liboso. (Mas. 15:28) Nini esalaka ete maloba ya ebandeli ezala oyo ebongi mpenza?
2. Ndenge nini tokoki kobongisa maloba ya kobanda lisolo oyo ekosepelisa bato?
2 Poná makambo oyo ekosepelisa: Maloba na biso ya ebandeli esengeli kopesa moto mposa ya koyoka, soki te akoki kokata lisolo. Yango wana, ntango ozali komibongisa, kanisá makambo oyo ekosepelisa bato na esika bofandi. Epai na bino, bato bazali na mposa ya kozala na guvɛrnema ya malamu, na libota ya esengo to balingi ete bitumba esila? Mbala mingi bato balingaka kopesa likanisi na bango na makambo wana, yango wana bongisá motuna moko oyo ekotinda moto apesa likanisi na ye. Okoki kosalela moko ya maloba ya kobanda lisolo oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi mpe koyokanisa yango na teritware na yo. Mpo na nini te bómekaka mbala na mbala maloba ya kobanda lisolo na ntango ya losambo na bino na kati ya libota?
3. Ndenge nini tokoki koyokanisa maloba na biso ya ebandeli na mimeseno mpe bindimeli ya bato ya teritware na biso?
3 Talelá mimeseno mpe bindimeli ya bato: Na bisika mosusu, esɛngaka tóloba mbala moko likambo toyeli. Na bisika mosusu, mopaya akomonisa bokonde soki atuni liboso bato ya ndako ndenge bazali, mpe ntango mosusu alobeli mwa moke makambo etali ye moko. Na bisika mosusu mpe, bindimeli ya lingomba ya bato ekoki kopesa biso nzela ya kolobela Biblia polele na maloba na biso ya ebandeli. (Mis. 2:14-17) Nzokande, epai ya bato oyo bazali na lingomba ya bokristo te, to basambelaka te, ekozala malamu tólobela Biblia ntango tokozongela bango, kasi te na mbala ya liboso.—Mis. 17:22-31.
4. Mpo na nini tosengeli kotya likebi mingi na maloba na biso ya ebandeli?
4 Maloba ya ebandeli: Bongisá malamumalamu maloba na yo ya ebandeli. Mbala mingi, maloba ya mokuse mpe ya pɛtɛɛ ezalaka malamu koleka. Ndenge oyo tozali kobimisa maloba na biso ya ebandeli ezali mpe na ntina mingi. Zalá na esengo. Sɛká mwa moke mpe mimonisá moninga mpo moto yango amona ete osepeli na ye. Kosalela makanisi oyo ekosalisa biso tóbongisa maloba ya ebandeli lokola bilei ya kitoko oyo ekotinda bato ya teritware na biso bálya na “mesa ya Yehova.”—1 Ko. 10:21.