Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/13 lok. 8
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 7/13 lok. 8

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya nsambo mpe sanza ya mwambe: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Nsango malamu oyo euti na Nzambe!, Yoká Nzambe, to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko.

◼ Tozali na esengo ya koyebisa bino ete mwa babuku Yoká Nzambe mpe Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko ezali sikoyo na minɔkɔ 26 oyo ebakisami; minɔkɔ yango, yango oyo: Alur, Bembe, Budza, Bushoong, Dengese, Kanyoko, Kikongo ya Leta, Kimanyanga, Kinande, Kipende, Kituba (Brazzaville), Lari (Brazzaville), Lega, Lendu, Lingombe, Lomongo, Mashi, Mbala, Ngbaka, Ngbandi, Sanga, Songomeno, Teke, Yaka, Yansi mpe Yombe. Na kotalela monɔkɔ oyo elobamaka epai na bino, tolendisi bino bósalela bisaleli yango ya sika mpo na koteya bato ya minɔkɔ nyonso. Bósalela formilɛrɛ S-14 mpo na kosɛnga yango.

◼ Moko ya mikumba ya mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola ezali ya kozwa balapolo ya basakoli mpe babongisi-nzela ya etuluku na ye. Soki mosakoli mokomoko apesi lapolo na ye ya mosala ya kosakola nokinoki, ekosalisa mokɛngɛli ya etuluku mingi. Yango ekosala ete Betele esangisa balapolo ya masangá nyonso na ntango ebongi na nsuka ya nsanza mokomoko. Kosala bongo ezali mpenza na ntina, mingimingi na sanza ya nsambo mpe ya mwambe, mpo na kosangisa balapolo ya mosala ya mobu mobimba. (Talá buku Tobongisami mok. 5 lok. 45) Basɛkrɛtɛrɛ balendisami na kotinda formilɛrɛ S-1 na nzela ya site jw.org to na nzela ya SMS (talá mokanda ya 27/07/2012).

◼ Tozali kosɛnga na masangani ya bankulutu ete bábanda kobongisa formilɛrɛ Aide-mémoire pour la maintenance et la sécurité de la Salle du Royaume (CN-14) oyo etindamaka mbula na mbula. Esengeli kotinda formilɛrɛ yango liboso ya mokolo ya 1 sanza ya libwa.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto