Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/12 lok. 8
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 12/12 lok. 8

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Desɛmbɛ: Etikali moke bampasi nyonso esila!, Yehova​—Azali nani?, Yesu Klisto​—Azali nani?, to Okosepela koyeba solo? Soki moto asepeli, tólakisa ye ndenge toyekolaka na bato Biblia na buku Biblia eteyaka to na moko ya mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko. Yanuali mpe Febwali: Mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, Ntango moto oyo olingaka akufi, Okoki kozala moninga ya Nzambe! Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto yango, tokoki kosalela mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi ya kobanda koyekola na bango Biblia.

◼ Na mobu 2014, Ekaniseli ekosalema mokolo ya Yambo 14 Aprili.

◼ Basakoli oyo bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi 2013 bakoki kopona kosala ngonga 30 to ngonga 50. Lisusu, soki mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá na bino na sanza ya Marsi, bandeko nyonso oyo bazali babongisi-nzela basungi, bakokɔta kobanda ebandeli tii nsuka na likita oyo mokɛngɛli ya zongazonga akosala elongo na babongisi-nzela ya sanza na sanza.

◼ Soki epai na bino bato mingi basalelaka Internet te, nkulutu moko oyo azali moteyi malamu akosala lisolo “Ndenge ya kolukaluka na mikanda,” na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, lokasa 33 tii 38. Soki ebongi na monɔkɔ na bino, bósala bilakiseli mibale. Ya liboso, ekomonisa libota moko bazali kosalela mitindami ya vɛrsɛ moko to bavɛrsɛ mibale. Ekosalema ntango bokokóma na motó ya likambo moke Ndenge ya kolukaluka na kati ya Biblia, mokanda na biso ya libosoliboso. Ya mibale, na nse ya motó ya likambo moke Yekolá kolukaluka na mikanda mosusu; ekomonisa libota moko bazali kosalela Index des publications de la société Watch Tower, mpo na koyeba mikanda oyo ezali kolimbola vɛrsɛ oyo bazali kotalela na Losambo na kati ya libota.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto