Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya Augusto: Tokoki kokabola mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: La Bible—Quel est son message ?, Une vie pleinement satisfaisante: Comment ?, to La vie a-t-elle été créée ? Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto yango, tokoki kosalela mwa buku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi tóbanda koyekola na ye Biblia. Sɛtɛmbɛ mpe Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto yango, tokoki kosalela mwa buku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi tóbanda koyekola na ye Biblia.
◼ Kobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala diskur ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo: “Kotambola elongo na nzambe epesaka mapamboli sikoyo mpe mpo na libela.”
◼ Moko ya mikumba ya mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola ezali ya kozwa balapolo ya basakoli mpe babongisi-nzela ya etuluku na ye. Soki mosakoli mokomoko apesi lapolo na ye ya mosala ya kosakola nokinoki, ekosalisa mokɛngɛli ya etuluku mingi. Yango ekosala ete Betele esangisa balapolo ya masangá nyonso na ntango ebongi na nsuka ya nsanza mokomoko. Kosala bongo ezali mpenza na ntina, mingimingi na sanza ya Yuli mpe Augusto, mpo na kosangisa balapolo ya mosala ya mobu mobimba. (Talá buku Tobongisami mok. 5 lok. 45).