Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/12 lok. 4
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 5/12 lok. 4

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki tokutani na moto oyo asepeli tokopesa ye trakte Okosepela koyeba solo? mpe tokosala makasi tóbanda koyekola na ye Biblia. Ntango tozali kozongela bato oyo bayanganaki na Ekaniseli to na mayangani na biso mosusu, kasi bayanganaka te na makita nyonso ya lisangá, tósala makasi mpo na kobanda koyekola na bango Biblia na buku Biblia eteyaka. Yuni: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia kaka na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki bato yango bazali na buku Biblia eteyaka kasi baboyi koyekola Biblia, tokoki kopesa bango zulunalo moko ya kala to mwa buku nyonso mosusu oyo tomoni ete ekosalisa bango.

◼ Ekateli: Na Likita ya Mosala ya pɔsɔ ebandi na 7 Mai, nkulutu moko akotánga lisusu mokanda ya 7 Desɛmbɛ 2009, oyo elobaki ete mbula na mbula esengeli kotalela lisusu ‘ekateli mpo na makabo etali Bandako ya Bokonzi.’ Na Likita ya Mosala ya pɔsɔ oyo ekobanda na 14 Mai, mokambi-misala ya bankulutu akotuna lisangá soki bakozwa ekateli ya sika. Na nsima, akotinda kopi ya ekateli yango ya sika na biro ya filiale.

◼ Boyekoli ya Biblia na lisangá na Lingala: Bandeko ya masangá mpe bituluku ya Lingala bakosala boyekoli na bango ya nsuka na buku ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ (bt) na pɔsɔ ya 29 Ɔkɔtɔbɛ 2012. Yango ekosalisa bango bábanda koyekola buku Nzambe azali koloba na biso na nzela ya Yirimia (jr) na pɔsɔ oyo ebandi na 5 Novɛmbɛ 2012 tii na pɔsɔ ya 21 Ɔkɔtɔbɛ 2013 elongo na masangá nyonso na mokili mobimba. Tolendisi basakoli nyonso ya masangá mpe bituluku ya Lingala báyekola mikapo oyo etikali ya buku ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ na losambo na bango na kati ya libota.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto