Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/12 lok. 8
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2012
Mosala na biso ya Bokonzi—2012
km 4/12 lok. 8

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki omoni ete moto asepeli, lakisá ye trakte Okosepela koyeba solo? mpe salá makasi obanda koyekola na ye Biblia. Ntango tokozongela bato oyo bayanganaki na Ekaniseli to na makita mosusu ya lisangá kasi bayanganaka mpenza te na Batatoli ya Yehova, tokosala makasi tóbanda koyekola na bango Biblia na buku Biblia eteyaka. Yuni: Biblia eteyaka mpenza nini? Tósala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia kaka na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki bato yango bazali na buku Biblia eteyaka kasi baboyi koyekola Biblia, tokoki kopesa bango zulunalo moko ya kala to mwa buku nyonso mosusu oyo tomoni ete ekosalisa bango.

◼ Bokoki kobongola mwa moke programɛ ya makita oyo bokosala pɔsɔ moko liboso ya liyangani ya etúká mpo na kozongela batoli mpe makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani. Sanza moko to mibale nsima ya liyangani, na lisolo “Bamposa ya lisangá,” bokoki kozongela makanisi ya ntina ya liyangani, oyo basakoli bamonaki ete ekosalisa bango na mosala ya kosakola.

◼ Soki olingi kokende mboka mopaya mpe koyangana na liyangani ya etúká kuna, okoki komona bisika mpe badati ya mayangani ya etúká na Internet na adrɛsi oyo: jw.org, na esika bakomi Consultation, mpe na nsima poná Assemblées.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto