Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/11 lok. 4
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 11/11 lok. 4

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya Novɛmbɛ: La Bible​—Quel est son message ? Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki na ndako yango bana bazali, lakisá buku Yekolá epai ya Moteyi Monene to buku Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Yanuali: Biblia eteyaka mpenza nini? Tósala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia kaka na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki bato yango bazali na buku Biblia eteyaka kasi bandimi koyekola Biblia te, tokoki kopesa bango zulunalo moko ya kala to mwa buku nyonso mosusu oyo ekosepelisa bango.

◼ Makabo mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba oyo etindamaka mbala moko na biro ya filiale esengeli kotindama na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah.’”

◼ Kobanda na Novɛmbɛ 2011, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya boyekoli ekobanda kobima na Swahili ya Congo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso mpe Lamuká! ekobanda mpe kobima na Swahili ya Congo, kobanda na Yanuali 2012. Kobanda na badati wana, tokotindela masangá nyonso oyo esalaki komande bazulunalo wana nyonso na Swahili ya Congo. Tondimi mpenza ete ebongiseli wana ya sika ekosepelisa ebele ya bato oyo balobaka Swahili na Congo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto