Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/11 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 10/11 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 31 Ɔkɔtɔbɛ 2011.

  1. Mpo na nini tosengeli kokangama na makundoli ya Yehova? (Nz. 119:60, 61) [w00 1/12 lok. 14 par. 3]

  2. Liteya nini tokoki kozwa na Nzembo 133:1-3? [w06 1/9 lok. 16 par. 3]

  3. Na ndenge nini Yehova ‘azalaki kotalatala’ Davidi mpe ‘azalaki kotala malamumalamu’ ‘ntango Davidi azalaki kosala mobembo’ mpe ‘ntango azalaki komilalisa’? (Nz. 139:1, 3) [w06 1/9 lok. 16 par. 6; w93 1/10 lok. 11 par. 6]

  4. Yehova ‘akosunga’ to ‘akotombola’ basaleli na ye na mikakatano ya lolenge nini? (Nz. 145:14) [w04 15/1 lok. 17 par. 11]

  5. Etamboli nini esalaki ete mobali oyo Masese 6:12-14 elobeli abengama moto ya mpambampamba? [w00 15/9 lok. 26 par. 5-6]

  6. Mpo na nini moto oyo azali na bwanya ‘andimaka mitindo’? (Mas. 10:8) [w01 15/7 lok. 26 par. 1]

  7. Moto ya mayele asalaka nini soki bafingi ye to batyoli ye, kasi zoba asalaka nini? (Mas. 12:16) [w03 15/3 lok. 27 par. 3-4]

  8. Ndenge nini kotalela makambo na ndenge ya malamu esalisaka biso ‘tózalaka na fɛti ntango nyonso’? (Mas. 15:15) [w06 1/7 lok. 16 par. 6]

  9. “Kozwa motema” elimboli nini, mpe na ndimbola nini moto oyo asali yango “azali kolinga molimo na ye moko”? (Mas. 19:8) [w99 1/7 lok. 18 par. 4; it-1-F lok. 492 par. 7]

  10. Ndenge nini bososoli ekoki kosalisa libota? (Mas. 24:3) [w06 15/9 lok. 27 par. 11; be lok. 31 par. 6]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto