Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tósala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia kaka na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki omoni ete moto asepeli, lakisá ye trakte Okosepela koyeba solo? mpe salá makasi obanda koyekola na ye Biblia.
◼ Mpo na kobongisa likita ya mosala ya pɔsɔ ya 3 Ɔkɔtɔbɛ, tosɛngi mabota nyonso bátalela na losambo na bango na kati ya libota batoli ya malamu oyo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, oyo ezali na bazulunalo na biso. Bokoki kotalela masolo oyo elandi: Se nourrir mieux, c’est possible ! (Okoki kolya malamu) (8 Mai 2002); ‘Six façons de protéger votre santé.’ (Makambo 6 mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ na yo) (22 Sɛtɛmbɛ 2003); Le savon, un “ vaccin à la portée de tous ” (Sabuni—“Mangwele oyo okoki komikata yo moko”) (22 Novɛmbɛ 2003). Bómibongisa mpo na koyebisa ndenge nini batoli yango esalisaka libota na bino.
◼ Diskur ya ntina mingi oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ya mobu 2012 ekosalema na pɔsɔ ya 2 Aprili 2012. Motó ya likambo na yango ekoyebisama nsima. Lisangá moko te esengeli kosala diskur yango liboso ya pɔsɔ ya 2 Aprili.
◼ Basakoli oyo bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Marsi 2012 bakoki kopona kosala ngonga 30 to ngonga 50 na sanza wana. Lisusu, soki mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá na bino na sanza ya Marsi, bandeko nyonso oyo bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, ezala baoyo baponaki kosala ngonga 30 to ngonga 50, bakokɔta na likita mobimba oyo mokɛngɛli ya zongazonga akosala na babongisi-nzela ya sanza na sanza.
◼ Kobanda na Sɛtɛmbɛ, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala diskur ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Sanganá na libota ya Nzambe oyo ezali na esengo.”