Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/11 lok. 8
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 5/11 lok. 8

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, ata mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na mayangani na biso mosusu, kasi bayanganaka te na makita nyonso ya lisangá, tósala makasi mpo na kotikela bango buku Biblia eteyaka. Yuni: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki mosakoli akutani na moto oyo asilá kozwa buku yango, akoki kolakisa ye buku mosusu ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1995.

◼ Kosala na Betele: Biro ya filiale ezali kolendisa bandeko mibali mpe basi oyo bakokisi masɛngami mpe bazali na mbula kobanda 19 tii 35, oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ oyo elandi: kobongisa mituka; kokumba mituka ya minene; misala ya kura; mosala ya soudeur, mpe mosala ya tour mécanique mpe ya bafrigoriste bákɔta na likita oyo esalemaka na liyangani ya etúká mpo na baoyo balingi kosala na Betele mpe bátondisa formilɛrɛ mpo na kosala na Betele.

◼ Ekateli: Na Likita ya Mosala ya pɔsɔ ebandi na 9 Mai, nkulutu moko akotánga lisusu mokanda ya 7 Desɛmbɛ 2009, oyo elobaki ete mbula na mbula esengeli kotalela lisusu ekateli mpo na makabo etali Bandako ya Bokonzi. Na Likita ya Mosala ya pɔsɔ oyo ekobanda na 16 Mai, mokambi-misala ya bankulutu akotuna lisangá soki bakozwa ekateli ya sika mpo na makabo etali Bandako ya Bokonzi. Na nsima, akotinda kopi ya ekateli yango ya sika na biro ya filiale.

◼ Tozali komibongisa mpo na kotinda na bingumba nyonso oyo liyangani ya etúká ekosalema anvɛlɔpi moko oyo ekozala na baformilɛrɛ mpo na mobu 2012 mpo na lisangá mokomoko. Sɛkrɛtɛrɛ ya lisangá asengeli kozwa anvɛlɔpi yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto