Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/11 lok. 8
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 4/11 lok. 8

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tokozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, bakisá mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na makita mosusu ya lisangá kasi bayanganaka mpenza te na Batatoli ya Yehova, tokosala makasi tóbanda koyekola na bango Biblia na lisalisi ya buku Biblia eteyaka. Yuni: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki moto azali na buku yango, mosakoli akoki kolakisa ye buku nyonso mosusu ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1995.

◼ Bokoki kobongola mwa moke programɛ ya makita oyo bokosala pɔsɔ moko liboso ya liyangani ya etúká mpo na kozongela batoli mpe makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani. Sanza moko to mibale nsima ya liyangani, na lisolo “Bamposa ya lisangá,” bokoki kozongela makanisi ya ntina ya liyangani, oyo basakoli bamonaki ete ekosalisa bango na mosala ya kosakola.

◼ Kobanda sanza ya Mai, masangá nyonso esengeli kosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza nyonso. Lisolo “Yekolá na Liloba ya Nzambe” oyo ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebongisami mpo na kosalisa basakoli bábanda koyekola na bato Biblia. Lokasa ya nsuka ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza nyonso ekozala na maloba “Ndenge ya kobanda lisolo” mpo na sanza oyo elandi, bakisá mpe maloba oyo ekosalisa biso mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto