Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 Aprili 2011. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20. Bozongeli yango ekotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 7 Marsi tii na pɔsɔ ya 25 Aprili 2011.
1. Na ndimbola nini “bato mingi ya mokili yango bamikómisaki Bayuda”? (Estere 8:17) [w06 1/3 lok. 11 par. 3]
2. Mpo na nini Yehova atikaki Satana akɔta mpo na kotɛlɛma liboso na Ye? (Yobo 1:6; 2:1) [w06 15/3 lok. 13 par. 6; it-1-F lok. 1261 par. 2]
3. Motuna oyo Satana atunaki, ete “Yobo abangi Nzambe nde mpamba” elimboli nini? (Yobo 1:9) [w94 15/11 lok. 11 par. 6]
4. Koyeba ete Yehova azali na “bwanya kati na motema mpe azali na makasi kati na nguya” epesi biso elikya nini? (Yobo 9:4) [w07 15/5 lok. 25 par. 16; it-2-F lok. 852 par. 1]
5. Ndenge nini maloba oyo ya Elifaze: moto oyo azali komɛla “kozanga boyengebene lokola mai” emonisi makanisi ya Satana? (Yobo 15:16) [w10 15/2 lok. 20 par. 1-2]
6. Liteya nini tokoki kozwa na komilela ya Yobo oyo tozali kotánga na Yobo 19:2? [w94 1/10 lok. 32 par. 1-5]
7. Nini esalisaki Yobo abatela bosembo na ye? (Yobo 27:5) [w09 15/4 lok. 6 par. 17]
8. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yobo ntango basusu bazali na bosɛnga? (Yobo 29:12, 13) [w02 15/5 lok. 22 par. 19; w94 15/9 lok. 24 par. 2]
9. Na ndenge nini toli ya Elihu ekesanaki na oyo ya baninga mosusu misato ya Yobo? (Yobo 33:1, 6) [w95 15/2 lok. 29 par. 3]
10. Komanyola likoló ya misala ya kokamwa ya Yehova etindaka biso tósala nini? (Yobo 37:14) [w06 15/3 lok. 16 par. 4]