Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/11 lok. 1
  • Mosala oyo epesaka esengo koleka

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mosala oyo epesaka esengo koleka
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Masolo mosusu
  • Okoki kopesa mabɔkɔ na mosala ya kokómisa bato bayekoli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Zwá esengo na mosala ya kokómisa bato bayekoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Eteni 1​—Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2011
km 1/11 lok. 1

Mosala oyo epesaka esengo koleka

1. Mosala nini ya kobikisa bato na elimo ezali kosalema lelo oyo?

1 Bato oyo bamonaki Yesu azali kobikisa bato na bamaladi na ekeke ya liboso, batondaki na esengo na mitema. (Luka 5:24-26) Lelo oyo, tozali kosepela na mosala ya kobikisa bato na elimo. (Em. 22:1, 2, 17) Toyokaka mpenza esengo ntango totángaka masolo oyo elobelaka ndenge Liloba ya Yehova mpe elimo santu na ye ezali kosalisa bato bábongola bomoi na bango! Nzokande, likambo oyo epesaka esengo koleka ezali nde kopesa mabɔkɔ na mosala yango na ndenge toyekolaka na bato Biblia mpe bato yango bakolaka na elimo.

2. Esengo nini tokoki koyoka ntango tozali koteya moto solo?

2 Nkombo ya Nzambe ezali nani? Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala? Bokonzi ya Nzambe ekosala nini mpo na bato? Toyokaka esengo mingi ntango toyanolaka na mituna wana mpe ntango tomonaka esengo oyo moyekoli ya Biblia azalaka na yango ntango ayekoli mateya ya solo. (Mas. 15:23; Luka 24:32) Ntango moyekoli azali kokola na elimo, akoki kobanda kosalela nkombo ya Yehova, kobongola lolenge na ye ya kolata mpe kobongisa nzoto, kotika misala mabe mpe kobanda kopesa basusu litatoli. Soki akoli tii na komipesa mpe kozwa batisimo, akokóma ndeko na biso mpe moninga na biso ya mosala. Matambe nyonso oyo moto yango asali epesaka biso esengo.​—1 Tes. 2:19, 20.

3. Makambo nini tosengeli kosala mpo na kobanda koyekola na bato Biblia?

3 Yo mpe okoki kosala mosala yango? Soki olingi kopesa mabɔkɔ na mosala oyo epesaka esengo koleka, sɛngá Yehova asalisa yo ozwa bato ya koyekola na bango Biblia mpe salá makambo oyo eyokani na mabondeli na yo. (1 Yoa. 5:14) Sakolá na bisika mpe na ngonga oyo okoki kokuta bato. Tunáká bato soki bakosepela oyekola na bango Biblia ntango nyonso oyo likoki ya kosala bongo emonani. (Mos. 11:6) Soki moto asepeli mpe oloni mboto ya solo na motema na ye, zongá kosopela yango mai.​—1 Ko. 3:6-9.

4. Mpo na nini tosengeli koyekola na bato Biblia na lombangu?

4 Bato oyo bazali na mposa ya koyeba solo bazali naino ebele. Banani bakoyekola na bango Biblia mpo na kosalisa bango bákokisa bamposa na bango ya elimo? (Mat. 5:3, 6) Tiká ete tómipesa mobimba na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli liboso ete eleko ya kobuka mbuma ekóma na nsuka.​—Yis. 6:8.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto