Biyano na mituna na bino
◼ Ndenge nini tokoki kosalisa babongisi-nzela?
Na mokili mobimba, pene na bandeko mibali mpe basi 800 000 bazalaki babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela monene na mobu ya mosala 2009. Bandeko yango oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bapesaka “mbuma ya liboso” ya ntango na bango, ya makasi na bango, mpe ya biloko na bango mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi. (Mas. 3:9) Ya solo, Yehova asepelaka mpenza na milende na bango! Ndenge nini tokoki kotalela babongisi-nzela ndenge Yehova atalelaka bango mpe kosalisa bango bázala na esengo mpe báyika mpiko na mosala yango?
Na ntembe te, maloba na biso oyo toponi malamu ekoki kolendisa bango bákoba kozala babongisi-nzela. (Mas. 25:11) Tokoki nde kobongola programɛ na biso ya pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kosakola elongo na bango? Soki tobimi na bango na mosala ya kosakola, tokoki kofutela bango tike. (1 Ko. 13:5; Flp. 2:4) Tokomonisa mpe ete tolingaka bango soki tozali koyamba bango mpe kobengisa bango mikolo mosusu na bandako na biso mpo na kolya.—1 Pe. 4:8, 9.
Makomami epesi elaka ete Yehova akokokisa bamposa ya mokolo na mokolo ya baoyo batyaka Bokonzi na ye na esika ya liboso. (Nz. 37:25; Mat. 6:33) Lolenge moko oyo asalaka yango ezali na nzela ya bandeko na biso bakristo ya mokili mobimba. (1 Yoa. 3:16-18) Ezali solo ete babongisi-nzela bazelaka te ete bandeko mosusu bábimisaka mbongo mpo na kofutela bango makambo nyonso. Mpe ntango mosusu, ata soki bazali na bosɛnga, bakolinga te koyebisa bandeko mosusu. Atako bongo, soki tozali ekɛngɛ mpe tozali kotyela bango likebi, tokoki kopesa babongisi-nzela lisalisi na makambo ndenge na ndenge mpe ‘kozipa kozanga na bango.’—2 Ko. 8:14, 15.
Ntango Foebe, ndeko mwasi oyo azalaki mosakoli ya molende na ekeke ya liboso na lisangá ya Kenkrea azalaki kokende na Roma, Paulo alendisaki bandeko ya Roma boye: “Bóyamba ye na kati ya Nkolo na ndenge oyo ebongi na basantu, mpe . . . bósalisa ye na likambo nyonso oyo akozala na mposa ya lisalisi na bino.” (Rom. 16:1, 2) Biso mpe tozali na libaku malamu ndenge wana ya kosalisa na bolingo nyonso bandeko na biso ya lisangá oyo bazali kosakola nsango malamu kozanga kotika lokola babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela monene.—Mis. 5:42.