‘Bilei na ntango oyo ebongi’
1. Ndenge nini liyangani ya mokolo moko oyo touti kosala esalisi yo moko mpe bandeko basusu?
1 Nsima ya koyangana na liyangani ya mokolo moko, tozalaka na momeseno ya koloba: “Mateya oyo nde tozalaki na yango mposa mpenza!” Mokɛngɛli moko ya zongazonga alobaki ete nsima ya kolanda liyangani ya mokolo moko, bandeko mosusu ya zongazonga na ye bamonisaki mposa ya kobakisa molende na bango na mosala ya kosakola. Mokɛngɛli-motamboli moko alobaki boye: “Liyangani yango esalisaki biso tómona polele epai wapi tokómi na ntango oyo etikali, mpe tótalela lisusu makambo oyo tozali kopona kosala na bomoi na biso.” Mokɛngɛli-motamboli mosusu alobaki boye: “Basakoli mingi balobaki ete liyangani wana ekundwelaki bango makambo oyo ekosalisa bango bámitalela mpo na koyeba soki bazali komipesa na mosala ya ntina mingi, mosala ya kosakola.” Ndenge nini liyangani ya mokolo moko esalisaki yo?
2. Masukulu nini ekosalema na liyangani ya mokolo moko ya mobu ya mosala oyo ezali koya?
2 Liyangani ya mokolo moko ya mobu ya mosala oyo ezali koya ekozala mpe na mateya oyo tozali na yango mposa mpenza. Motó ya likambo na yango ezali: ‘Kimá epai ya Yehova,’ euti na Nzembo 118:8, 9. Masukulu mosusu oyo ekosalema kuna yango oyo: “Ndenge nini Yehova azali ndako ya makasi na ntango ya mpasi?,” “Salisá basusu bámibomba na nse ya mapapu ya Yehova,” “Landá ndakisa ya Yehova, tiká basusu bámibomba epai na yo,” “Bilenge, bótya elikya na bino epai na Yehova!” mpe “Paradiso na biso ya elimo—Esika ya komibomba oyo Yehova abongiseli biso.”
3. Nini tosengeli kosala mpo tózwa mpenza matomba na liyangani?
3 Mpo na kozwela yango matomba: Soki kaka bayebisi dati ya liyangani yango, banda komibongisa mpo ozanga yango te; yebisá mpe bato oyo oyekolaka na bango Biblia mpo bango mpe bámibongisa. Mpo ‘tóbota mbuma wana tozali koyika mpiko,’ tosengeli kokanga makambo oyo toyokaka. (Luka 8:15) Na yango, landá liyangani na likebi mpe komá mwa makambo ya ntina mpe toli oyo okani kosalela na bomoi na yo to na mosala ya kosakola. Nsima ya liyangani, zwá ntango ya kosolola na libota na yo makambo oyo boyokaki mpe bólobela makambo oyo yo ná libota na yo bokosalela.
4. Mpo na nini tosengeli kozela na motema likoló liyangani na biso ya mokolo moko oyo ezali koya?
4 Lokola bilei ya elɛngi mpe oyo ezali kotonga nzoto, liyangani ya mokolo moko ya mobu oyo ebongisami malamu mpe na bolingo mingi. Tiká ete Yehova apambola milende na bino mpo na kozala na liyangani yango mpe kozwa matomba na ‘bilei na ntango oyo ebongi’ mpo na koleisa baministre bakristo na elimo.—Mat. 24:45.