Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki bana bazali na ndako yango, tokoki kolakisa buku Yekolá epai ya Moteyi monene. Yanuali: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki bato yango bazali na buku yango, mosakoli akoki kolakisa bango buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1995. Febwali: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Biblia eteyaka mpenza nini? Basakoli basengeli kosala makasi bábanda koyekola Biblia na bato oyo bandimi kozwa buku yango to baoyo bazali na yango na ndako.
◼ Ekaniseli mpo na mobu 2011 ekosalema mokolo ya lomingo, 17 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Liyebisi oyo epesami liboso mpo ete na bisika oyo masangá mingi esalelaka Ndako ya Bokonzi moko, bandeko ya masangá mosusu bázwa bibongiseli mpo na koluka bisika mosusu ya kosala Ekaniseli.
◼ Lisangá mokomoko ekozwa nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli ya mobu 2010 na monɔkɔ oyo basalaka makita. Soki ezali na minɔkɔ mosusu oyo elobamaka na teritware na bino mpe bolingi bátindela bino nkasa ya libyangi na minɔkɔ yango, bósɛnga yango nokinoki na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Liste ya minɔkɔ oyo nkasa ya libyangi yango ezali ekobima na “Avis aux congrégations,” oyo etindamaka na masangá sanza na sanza.
◼ Liboso tózwa buku ya sika ya nzembo Tóyembela Yehova na Lingala, tokobanda kotya nimero mibale ya nzembo na manaka ya makita. Nimero ya liboso ezali ya nzembo na buku ya sika, mpe nimero oyo ezali na kati ya paranteze ezali ya nzembo na buku ya kala.