Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Novɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki mosakoli akutani na moto oyo asilá kozwa buku yango, akoki kopesa ye buku mosusu ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1995. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki na ndako yango bana bazali, lakisá buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Yanuali: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki mosakoli akutani na moto oyo asilá kozwa buku yango, akoki kopesa ye buku mosusu ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1995. Febwali: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
◼ Mokolo ya pɔsɔ, 28 Novɛmbɛ 2009, libota ya Betele ekozala na ebongiseli oyo etali kaka bango; mpe na mokolo ya 12 Desɛmbɛ 2009, bakozala na mosala monene ya kotya bopɛto na Betele mobimba. Na yango, tosɛngi ete na mikolo yango, bóya kotala Betele te to ndeko moko oyo afandaka na Betele.