Biyano na mituna na bino
◼ Mpo na nini ebongi kosalela bososoli na likambo etali kolanda makita na nzela ya telefone?
Masangá mingi ezwá ebongiseli mpo na kosalisa bandeko oyo ntango mosusu bakoki te koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi mpo na maladi to mikakatano mosusu ete bálanda makita na nzela ya telefone. Esɛngaka kosalela bososoli mpe kobongisa makambo malamu mpo ebongiseli malamu wana ezala mpenza mpo na baoyo basengeli na yango. Yango wana, bankulutu oyo basali ebongiseli ya ndenge wana basengeli kobongisa makambo mpe kolandela ndenge ya kosalela yango mpo “makambo nyonso esalema na ndenge ya lokumu mpe na molɔngɔ.”—1 Ko. 14:40.
Bankulutu basengeli koluka ete ebongiseli yango esalisa libosoliboso basakoli ya lisangá na bango oyo bazali na maladi oyo eumeli, to baoyo bazali bibɔsɔnɔ, to mpe baoyo bakɔtá ndako. Bakoki mpe kondima kosala yango mpo na mosakoli oyo abɛli maladi makasi to azali na mokakatano mosusu mpo na mwa ntango, to moyekoli ya Biblia oyo azali kokola malamu kasi akɔtá ndako, mpe bakobakisa bato ya ndenge wana na motángo ya bayangani. Na bisika oyo bakoki te kosalela telefone mpo na kosalisa bandeko oyo bazali mpenza na mposa na yango, mbala mosusu bakoki kozwa bibongiseli mosusu, na ndakisa kokɔtisela bango makambo na kasɛti.
Kasi, ebongiseli moko te ekoki kozala na matomba lokola oyo moto azwaka soki ye moko azali koyangana na makita. Kozala elongo na bandeko na biso epesaka biso libaku ya “kolendisana” mpe esalisaka bato ya sika bámona ntina ya koyangana na makita. Soki toyangani na makita, tokolanda malamu bilakiseli, tokozala na likoki ya kosolola na bankulutu, mpe tokomona mpenza bolingo ya bandeko. Ntango ndeko mwasi moko ya mobange azalaki kobima na Ndako ya Bokonzi, ndeko moko ayambaki ye; mobange yango alobaki likambo oyo ezali solo ete: “Moto akoki koyamba yo boye te na telefone!”—Ro. 1:11, 12.
Lokola Ana “oyo azalaki kozanga soki moke te na tempelo,” lelo oyo mibange mingi bayanganaka pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya lisangá, soki nzoto ezali kopesa bango nzela. (Luka 2:36, 37) Atako balandaka makita na nzela ya telefone soki esɛngi básala yango, bamonaka te ete ebongiseli yango ekoki kozwa esika ya koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi. Na kolanda ndakisa na bango, tiká tókoba kosala milende mpo tóyanganaka na makita mpo na kosambela Nzambe na biso monene, Yehova.—Nz. 95:1-3, 6; 122:1.