Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli na lisolo, tólakisa ye mpe trakte Okosepela koyeba solo? Soki mosakoli akutani na moto oyo asilá kozwa trakte yango, asengeli kosala makasi abanda na ye boyekoli ya Biblia. Novɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki mosakoli akutani na moto oyo asilá kozwa buku yango, akoki kopesa ye buku mosusu ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1995. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki na ndako yango bana bazali, lakisá buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.
◼ Programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekobima lisusu lokola siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi te. Programɛ yango ekobanda kotindama na lisangá mokomoko; kopi moko ekotyama na etanda ya mayebisi na Ndako ya Bokonzi. Kopi mosusu ekopesama epai ya mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo asalelaka mpo na kokabola masolo. Mosakoli mokomoko akokoba kozwa lokasa ya Mosala na biso ya Bokonzi sanza na sanza, mpe yango ekozala na programɛ ya Boyekoli ya Biblia na lisangá, ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe ya Likita ya Mosala.