Nsango ya esengo mpo na mosala ya kosakola
Congo-Kinshasa: Na sanza ya Aprili, mpo na mbala ya liboso, masangá koleka 1 000 na kati ya masangá 3 070 etindaki lapolo na yango na dati oyo esengeli. Motángo ya basakoli ezalaki 156 076. Nzokande, tóyeba ete mpo na basakoli mingi (53%), lapolo oyo tozwaki ezalaki ya sanza ya Aprili te, kasi ya basanza oyo eleká.
Congo-Brazzaville: Na sanza ya Marsi, basakoli bakómaki 5 231, bakabolaki babuku 4 538 mpe bazulunalo 66 695. Mitángo yango ezali mpenza mpo na sanza ya Marsi mpe ezali mitángo ya sika oyo tozwá naino te.