Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/09 lok. 5
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 8/09 lok. 5

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 31 Augusto 2009. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20. Bozongeli yango ekotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 6 Yuli tii na pɔsɔ ya 31 Augusto 2009.

1. Mpo na nini bazalaki kokatela moto oyo ‘alakeli tata na ye mpe mama na ye mabe’ etumbu ya liwa? (Lev. 20:9) [w04 15/5 lok. 24 par. 6]

2. Lokola mibali nyonso ya Yisraele basengelaki kozala na Fɛti ya Mampa ezangá levire, nani azalaki kobuka mbuma ya liboso ya ɔrje oyo bazalaki kopesa lokola likabo? (Lev. 23:5, 11) [w07 15/7 lok. 26 par. 3]

3. Mbula ya Yubile ezalaki elilingi ya nini? (Lev. 25:10, 11) [w04 15/7 nk. 26-27]

4. “Bilembo” oyo balobeli na Mituya 2:2 ezalaki nde na ndimbola na makambo ya losambo mpo na Bayisraele? [w02 15/9 lok. 21 par. 4]

5. Elimo nini basaleli ya ntango nyonso bamonisaka lelo, oyo ekokani na elimo oyo Banaziri bazalaki komonisa na Yisraele ya kala? (Mit. 6:3, 5, 6) [w04 1/8 nk. 24-25]

6. Etinda nini ya mobeko etali Balevi oyo basengelaki kozwa pasyo na mosala basaleli ya Yehova bakoki kotosa lelo oyo? (Mit. 8:25, 26) [w04 1/8 lok. 25 par. 1]

7. Ndenge nini Bayisraele bamonisaki “mposa makasi na lokoso,” mpe liteya nini bakristo bakoki kozwa na likambo yango lelo oyo? (Mit. 11:4) [w01 15/6 nk. 14-15; w95 1/3 lok. 15 par. 10]

8. Mpo na nini kaka Miriame nde abɛlaki maladi ya maba, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? (Mit. 12:9-11) [w04 1/8 lok. 26 par. 2; it-2-F lok. 295 par. 1]

9. Yosua ná Kalebe balingaki mpenza koloba nini ntango balobaki ete Bakanana bazali lokola “limpa”? (Mit. 14:9) [w06 1/10 lok. 16 par. 5; it-2-F lok. 472 par. 3]

10. Mituya 21:5 epesi biso likebisi nini? [w99 15/8 nk. 26-27]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto