Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/09 lok. 4
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 7/09 lok. 4

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimo ya bakufi​—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Nzela ya bomoi ya seko​—Osili komona yango?; mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki likoki ezali, tósala makasi ete tóbanda koyekola Biblia na moto ntango kaka topesi ye buku. Na libaku yango, tóyekola na ye mwa baparagrafe mpo na kolakisa ye ndenge akoki kosalela buku yango malamu. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokoki kolakisa ye trakte Okosepela koyeba solo? mpe kotalela na ye motuna oyo aponi. Soki moto yango asilá kozwa trakte yango tokosala makasi tóbanda koyekola na ye Biblia.

◼ Mbongwana moko esalemi na ngonga oyo tosengeli kobanda mayangani ya etúká na 2009. Mayangani ekobanda na 8h20. Kasi, mpo na mayangani oyo ekosalema na bingumba oyo: Brazzaville, Goma, Kananga, Kikwit, Kinshasa, Kisangani, Kolwezi, Likasi, Lodja, Lubumbashi, Matadi, Mbandaka, Mbuji-Mayi, Mwene Ditu, Pointe-Noire mpe Tshikapa, programɛ ekobanda na 9h20 mikolo nyonso, ndenge kaka ezalaki na 2008.

◼ Lokola sanza ya Augusto ezali na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ebongi mpenza mpo kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto