Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuni: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki bato yango bazali na buku yango, tokoki kolakisa bango buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya 1992. Yuli mpe Augusto: Tokoki kolakisa mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimo ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi . . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango? mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki likoki ezali, tokosala makasi tóbanda koyekola na moto Biblia ntango tolingi kotikela ye buku yango. Bósala elakiseli ya mokuse oyo ekomonisa ndenge ya koyekola na moto Biblia mpe matomba oyo moto akoki kozwa soki ayekoli buku yango.
◼ Soki olingi kokende na mboka mopaya oyo ezali te na liste ya mikili oyo ezali na lapolo ya mbula oyo, to oyo adrɛsi na yango etyami te na lokasa ya nsuka ya Annuaire ya mbula oyo, tuná biro ya filiale ya mboka na bino mpo na koyeba makambo oyo osengeli kokeba na yango to malako oyo osengeli kolanda. Ekoki kozala ete, na mboka yango, batyelá mosala na biso ya Bokonzi mibeko. (Mat. 10:16) Na mikili mosusu, ekozala malamu te ete moto oyo azali mopaya aluka kokutana na Batatoli ya mboka wana. Biro ekoki kopesa yo malako mosusu etali ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu to kokabola mikanda. Kolanda malako yango ekosalisa yo okutana na mikakatano te mpe olukela lisangá makambo te.—1 Kol. 14:33, 40.