Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 Aprili 2009. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 2 Marsi tii na pɔsɔ ya 27 Aprili 2009.
1. Ndenge nini Yozefe asalaki mpo na kolonga komekama ya mokolo na mokolo oyo akutanaki na yango? (Gen. 39:7-12) [lv lok. 105 par. 18–lok. 106 par. 20]
2. Biblia elobi nini mpo na bafɛti ya anivɛrsɛrɛ ya kobotama? (Gen. 40:20-22) [lv lok. 150 par. 9–lok. 151 par. 11]
3. Na ndenge nini Yozefe azali ndakisa malamu na likambo ya kolimbisa baoyo basaleli biso lisumu? (Gen. 45:4, 5) [w99 1/1 lok. 31 par. 2-3]
4. Etinda oyo Yozefe apesaki ete: “Bokokumba mikuwa na ngai longwa na esika oyo” ebimisaki matomba nini? (Gen. 50:25) [w07 1/6 lok. 28 par. 10]
5. Nini ekoki kopesa biso mpiko ntango bapesi biso mokumba oyo tokanisi ete tokokoka yango te? (Ex. 4:10, 13) [w04 15/3 lok. 25 par. 4]
6. Matomba nini emonanaki na makambo oyo Yehova asalaki Falao, mpe makambo yango esengeli kotinda biso tósala nini? (Ex. 9:13-16) [w05 15/5 lok. 21 par. 8]
7. Maloba oyo ezali na Exode 14:30, 31 elimboli nini mpo biso lelo oyo? [w04 15/3 lok. 26 par. 5]
8. Na kotalela Exode 16:1-3, koimaima ekoki kobimisa makama nini? [w93 15/3 lok. 20 par. 2–lok. 21 par. 2]
9. Na kotalela maloba ya Kondimana ya Mibeko oyo ezali na Exode 19:5, 6, na ndenge nini tokoki koloba ete Bayisalaele bazalaki “bokonzi na banganga mpe libota na bulɛɛ”? [w95 1/7 lok. 16 par. 8]
10. Na ndenge nini mobeko ya zomi oyo epekisaki kolula biloko ya bato elekaki mosika mibeko ya bato? (Ex. 20:17) [w06 15/6 lok. 23-24 par. 16]