Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuali: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki bato yango bazali na buku yango, mosakoli akoki kolakisa bango buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1992. Febwali: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.
◼ Kobanda na pɔsɔ ya liboso na sanza ya Marsi, bakɛngɛli ya zongazonga bakobanda kosala lisukulu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo: “Tóbwaka makanisi mpamba ya mokili, tólanda makambo ya solo ya Bokonzi.”
◼ Masangá esengeli kozwa bibongiseli oyo esengeli mpo na Ekaniseli oyo ekosalema mbula oyo na Mwaminei 9 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Lisangá na lisangá esengeli kosala makasi esala Ekaniseli na yango moko. Epai masangá mingi esalelaka Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu lisangá moko to masangá mingi ekoki kosalela bisika mosusu na mpokwa wana. Tosɛngi bino ete soki likoki ezali, ntango lisangá moko esilisi, bólekisa miniti 40 liboso ete lisangá mosusu ebanda, mpo bandeko bázwa ntango ya kopesana mbote mpe kosolola na bapaya nsima ya Ekaniseli.2