Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 29 Desɛmbɛ 2008. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 3 Novɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 29 Desɛmbɛ 2008.
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Mpo na nini tosengeli kolendisaka bato “na bolingo”? (Flmo. 9) [be lok. 266 par. 1-3]
2. Ndenge nini tokoki kosalisa basusu bázwa makasi? [be lok. 268 par. 4–lok. 269 par. 2]
LISOLO NO. 1
3. Na ndenge nini mokanda oyo Paulo akomelaki Tito ezali “malamu mingi mpe na litomba” mpo na biso lelo oyo? (Tito 3:8) [si lok. 241 par. 8]
4. Mpo na nini tondimi ete mokanda ya liboso ya Petelo eyaki na ntango ebongi? [si lok. 251 par. 1]
5. Bilembo ya Emoniseli esengeli kosala biso nini? [si lok. 263 par. 1]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
6. Na Tito 2:3, ekoki kozala mpo na ntina nini nde Paulo alobeli ‘kokoselaka bato makambo’ esika moko na “baombo ya ebele ya vinyo”? [w94 15/6 lok. 20 par. 12]
7. Lokola Satana “azali na likoki ya kopesa liwa” yango elingi nde koloba ete akoki koboma moto nyonso oyo alingi? (Ebe. 2:14) [w08 15/10 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi—Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Tito, Filemo, mpe Baebele”]
8. “Moto oyo asali kondimana” ya sika ezali nani? (Ebe. 9:16) [w08 15/10 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi—Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Tito, Filemo, mpe Baebele”]
9. Kozala moto ya kimya elimboli nini, mpe mituna nini tosengeli komituna na likambo yango? (Yak. 3:17) [w08 15/3 lok. 24 par. 18]
10. Maloba “Nzambe azali monene koleka mitema na biso” elimboli nini? (1 Yoa. 3:20) [w05 1/8 lok. 30 par. 19]