Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/08 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 7/08 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimo ya bakufi​—⁠Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Nzela ya bomoi ya seko​—⁠Osili komona yango?; Osengeli kondima Trinité?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Sɛtɛmbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? mpe tokolimbwela ye yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia.

◼ Lokola sanza ya Augusto ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

◼ Kobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Tambolá na nzela ya bosembo.”

◼ Biro ekondima te komande oyo mosakoli moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli-mokambi akosala ete liyebisi epesamaka sanza nyonso liboso ete lisangá etinda komande na yango ya mikanda na biro. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda ete báyebisa yango na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda nini oyo ezali na molɔngɔ ya articles sur demande spéciale.

◼ Evantɛrɛ ya mbula mobimba ya mikanda mpe bazulunalo nyonso oyo bozali na yango ekosalema na mokolo ya 31 Augusto 2008 to mpe mwa liboso to mwa nsima ya dati yango soki likoki ezali. Evantɛrɛ yango ekosalema ndenge kaka ndeko oyo atalelaka mikanda na masangá oyo esalelaka Ndako ya Bokonzi moko asalaka yango sanza na sanza, mpe bosengeli kokoma motángo ya mikanda yango na formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F). Mpo bóyeba motángo ya bazulunalo nyonso oyo bozali na yango, bokoki kotuna bandeko oyo batalelaka bazulunalo na lisangá mokomoko. Mokomeli ya lisangá oyo etalelaka mikanda asengeli kotambwisa evantɛrɛ yango. Ye ná mokɛngɛli-mokambi ya lisangá oyo etalelaka mikanda bakotya sinyatili na bango na formilɛrɛ yango. Lisangá nyonso oyo etalelaka mikanda ekozwa formilɛrɛ yango misato. Tosɛngi bino ete bótinda kopi ya malamu na biro liboso ya mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ. Bóbomba kopi mosusu na dosye na bino. Kopi ya misato, bokoki kosalela yango lokola bruyɔ.

◼ Tosengeli kosalela buku Biblia eteyaka mpo na kobanda mpe kokoba koyekola na bato Biblia na esika ya kosalela mwa buku Azali kosɛnga. Nzokande, tokokoba kokabola mwa buku Azali kosɛnga na mosala ya kosakola tii yango nyonso ekosila.

◼ Kobanda na sanza ya Yanuali 2008, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ya koyoka, na Lingelesi mpe na Lifalanse, ekómi kotyama na site na biso ya Internet: www.jw.org. Bandeko mingi bakómi kosepela kozwa yango mbala moko na Internet, mpamba te oyo wana etyamaka liboso ete ba CD to ba MP3 ekóma na lisangá. Ntango nyonso oyo moto azwi Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Lamuká! ya koyoka na site na biso ya Internet, ebongiseli ya Yehova esengeli kofuta mbongo. Atako bongo, mbongo yango ezali mingi te soki tokokanisi yango na mbongo oyo esɛngaka kobimisa mpo na kosala ba CD mpe kotinda yango na masangá. Na bongo, tolendisi basakoli oyo bazwaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ya koyoka na Internet básɛnga lisusu te ba CD to ba MP3 na yango na lisangá. Na mikolo ekoya, tokobanda kotya mokemoke biloko mosusu ya koyoka ya minɔkɔ mosusu na site na biso www.jw.org.

◼ Mbongwana ya badati ya mayangani ya etúká oyo ekosalema na Lubumbashi na mobu 2008: Lubumbashi (Lifalanse): 8-10 Augusto 2008. Lubumbashi (Swahili mpe Cibemba): 15-17 Augusto 2008. Biro esili koyebisa mbongwana yango na masangá oyo ebengisami na mayangani yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto