Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuni: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimo ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi . . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango?; Osengeli kondima Trinité?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.”
◼ Tolingi koyebisa bino ete tokokabola te nkasa ya libyangi mpo na kobengisa bato na liyangani ya etúká 2008. Kasi, tozali kobongisa kosala kampanye moko ya monene na mokili mobimba na mikolo ezali koya. Tokoyebisa bino makambo mosusu etali kampanye yango nsima.
◼ Lokola sanza ya Augusto ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Mokɛngɛli-mokambi akopona ndeko moko oyo akotalela kɔnti ya lisangá mpo na sanza ya Marsi, Aprili, mpe Mai. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.—Talá formilɛrɛ Instructions pour la comptabilité des congrégations (S-27).
◼ Ezali malamu bankulutu bátindelaka biro baformilɛrɛ oyo bandeko bazali kotondisa mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mikolo 60 to koleka liboso ya mokolo oyo ndeko alingi kobanda mosala yango. Mokomeli ya lisangá asengeli kotala malamumalamu soki bandeko batondisi yango nyonso. Soki ndeko azali koyeba lisusu te dati oyo azwaki batisimo, akoki kokoma ata dati moko oyo ezali mosika mingi te na dati oyo azwaki batisimo mpe kobatela yango. Mokomeli ya lisangá asengeli kokoma dati yango na karte ya mosakoli (Activité du proclamateur [S-21]).