Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Marsi: Tokolakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokosala makasi tózongela bato oyo babandi kosepela na nsango malamu, oyo bayanganaki na Ekaniseli mpe na lisukulu ya ntina mingi oyo esalemaka nsima ya Ekaniseli, kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova. Ntango tozali kozongela bango, mokano na biso esengeli kozala ya kobanda koyekola Biblia na baoyo babandi naino koyekola yango te. Yuni: Tokolakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia.
◼ Masangá basengeli kokabolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ya sika mbala moko ntango bazwi yango. Yango ekosala ete basakoli báyeba makambo oyo ezali na kati ya bazulunalo yango liboso ya kokende kolakisa yango na mosala ya kosakola.
◼ Mokɛngɛli-mokambi akopona ndeko moko oyo akotalela kɔnti ya lisangá mpo na sanza ya Desɛmbɛ, Yanuali, mpe Febwali. Esengeli te ete ndeko wana kaka atalelaka kɔnti yango mbala nyonso. Soki asilisi kotalela yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.—Talá formilɛrɛ Instructions pour la comptabilité des congrégations (S-27).
◼ Liyangani ya etúká mpo na mobu 2008 ekozala na motó ya likambo “Totambwisami na elimo ya Nzambe.” Mosala na biso ya Bokonzi ya Aprili ekomonisa malamumalamu ndenge oyo tokoki komibongisa mpo na kozala na liyangani yango mikolo nyonso misato. Soki esɛngi ozwa konje na mosala mpo ozala na liyangani mikolo nyonso misato, kokakatana te mpo na kosɛnga yango.