Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1991. Masangá oyo ezali na buku yango te, bakoki kolakisa buku Boyebi to mwa buku Bókɛngɛlaka! Febwali: Y-a t-il un Créateur qui se soucie de vous? to Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Tokolakisa buku Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Aprili: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokosala makasi tózongela bato oyo babandi kosepela na nsango malamu, oyo bayanganaki na Ekaniseli mpe na lisukulu ya ntina mingi oyo esalemaka na eleko ya Ekaniseli, kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova. Ntango tozali kozongela bango, mokano na biso esengeli kozala ya kobanda koyekola Biblia na baoyo babandi naino koyekola Biblia te.
◼ Lokola sanza ya Marsi ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Kobanda na sanza ya Febwali, kasi koleka mwa 2 Marsi te, bakɛngɛli ya zongazonga bakobanda kosala lisukulu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo: “Epai wapi tokoki kozwa lisalisi na ntango ya mpasi?”
◼ Masangá esengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo na Ekaniseli oyo ekosalema mbula oyo na mokolo ya pɔsɔ 22 Marsi, nsima ya kolala ya moi. Atako lisukulu ekoki kobanda liboso, kasi limpa na vinyo esengeli kolekisama te liboso ya kolala ya moi. Bóluka koyeba ngonga oyo moi elalaka na esika bofandi. Lisangá na lisangá esengeli kosala makasi ete esala Ekaniseli na yango moko. Kasi, na bisika mosusu ekokoka te kosalema bongo. Epai masangá mingi esalelaka Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu lisangá moko to masangá mingi ekoki kosalela bisika mosusu na mpokwa wana. Tosɛngi bino ete soki likoki ezali, ntango lisangá ya liboso ekosilisa, bólekisa miniti 40 liboso ete lisangá mosusu ebanda mpo lisangá na lisangá esala molulu yango malamu mpenza. Esengeli mpe kotya likebi na ndenge oyo mituka ekobanda kokɔta mpe kobima, esika oyo bakotɛlɛmisa yango, mpe esika oyo bakokitisa bato mpe kozwa bango. Lisangani ya bankulutu basengeli kozwa bibongiseli oyo ekozala malamu mpo na lisangá na bango.
◼ Bakomeli ya masangá basengeli komindimisa ete bazali na mokanda ya mobongisi-nzela mokomoko, oyo emonisi ete biro endimi ye asala mosala ya mobongisi-nzela (S-202). Soki bazali na yango te, basengeli kokomela biro.